Kende na makomi ya page

Ba information ya mobeko

Nani abimisi site oyo.

Ba information na ntina ya moto oyo abimisi site, oyo abombi yango, mpe ba information na bino ya moto.

Moto oyo abimisi site

Site oyo ebimisami na Ponamboka, studio créatif oyo ezali na Kinshasa, République Démocratique du Congo.

  • Mokambi ya publication : équipe ya Ponamboka
  • Contact : WhatsApp +243 853 777 737, e-mail contact.mbotestudio@gmail.com

Esika site ebombami (hébergement)

Site ebombami epai ya Cloudflare, Inc., 101 Townsend Street, San Francisco, CA 94107, États-Unis (service Cloudflare Pages).

Ba information na bino ya moto

Site oyo esalelaka cookie te mpe eloko ya publicité to ya kolanda bato te. Etangaka kaka motango : boni ya ba visite, ba clic na WhatsApp mpe ba likanisi oyo etindami, kozanga kobomba soki bozali nani to adresse IP na bino. Esika « Likanisi na ngai likoló ya site » mpe bouton « Koyebisa likambo » etindaka eloko te na serveur na biso : message na bino ekeyi na WhatsApp. Tozwaka ba information na bino kaka ntango bokomeli biso na WhatsApp, na telefone to na e-mail.

  • Oyo tobombaka : nkombo na bino to ya mombongo na bino, numéro na bino, mpe oyo botindeli biso mpo na commande na bino (makomi, ba logo, ba foto).
  • Mpo na nini : mpo na koyanola bino, kosala commande na bino mpe kopesa bino reçu.
  • Ntango boni : ntango nyonso oyo tozali kosala mombongo elongo, sima ntango oyo esengeli mpo na ba reçu.
  • Kokabola : totekaka te mpe todefisaka te ba information na bino. Tolakisaka misala na bino kaka soki bondimi yango na makomi.
  • Makoki na bino : bokoki kosenga biso ntango nyonso kotala, kobongisa to kolongola ba information na bino, na WhatsApp na +243 853 777 737.

WhatsApp (Meta) mpe hébergeur basalaka mpe na ba information ya technique na kolanda mibeko na bango moko. Mibeko oyo ekomami na Code du numérique ya République Démocratique du Congo (ordonnance-loi n° 23/010 du 13 mars 2023).

Nkolo ya makomi mpe bilili

Makomi, bilili, ba motif mpe biloko ya 3D ya site oyo ezali ya Ponamboka, longola soki ekomami ndenge mosusu. Misala ya ba client elakisami na ndingisa na bango.

Mibeko ya koteka

Ba ntalo, ba quota, ba correction mpe kofuta elimbolami malamu na mibeko na biso.